Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:25 - Mokanda na Bomoi

25 Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:25
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »


Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.


Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »


Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.


Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »


Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango.


Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama.


Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ