Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto. Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo ; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu.


Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.


Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.


Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.


Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.


Kobebisa mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku.


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ