17 Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango.
Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika.
Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu.
Soki mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa ekomi kino na tongo, okotumba yango na moto. Bakoki kolia yango lisusu te, pamba te ezali bule.
Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
Bongo, tango Moyize atunaki ntaba ya mobali oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu, ayokaki ete basilaki kotumba yango na moto. Boye asilikelaki Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron, mpe atunaki bango :
Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato.
Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.
bakundaki Ye, mpe asekwaki na mokolo ya misato, ndenge Makomi elobaki yango liboso.