15 Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo.
Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.
Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.
‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta.
Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona.