Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 « ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 7:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.


Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani ; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango.


Alobaki na ngai : « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. »


Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule.


Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.


« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu : akokata yango kingo kasi akolongola moto te.


Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko ; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ