Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:6
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango.


Biso, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato, tobetaki zeke mpo na kokata tango oyo libota na libota kati na biso ekomema likabo ya bakoni na Ndako ya Nzambe na biso, na mibu nyonso mpo na kopelisa moto na etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko.


mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. »


Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; akotombola yango liboso ya Yawe.


« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ