Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango.


Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango : bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende.


Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ; mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ?


pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.


Atako balapaka ndayi na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule ; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango.


Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso ; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto.


Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.


Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo.


Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ