Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:23 - Mokanda na Bomoi

23 Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:23
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango.


Bongo bagato oyo ekotikala, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu ; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu. ’


Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe. ’


Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ