Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi.


Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu.


Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango.


Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.


Soki ezali likabo bakalinga na kikalungu, esengeli kozala ya farine ezanga levire mpe basangisa na mafuta.


Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza.


‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta.


Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ