Levitike 6:2 - Mokanda na Bomoi2 « Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.