Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:19 - Mokanda na Bomoi

19 Nganga-Nzambe oyo azali kobonza yango mpo na masumu akolia yango na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:19
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta ; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta ; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu.


Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule.


Lokola makila ya mbeka yango ekotaki te kati na Esika ya bule, bosengelaki kolia mosuni na yango na Esika ya bule kolanda ndenge nalobaki na tina na yango.


« Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza.


Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule.


Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Likabo yango ekozala mpo na bino lokola oyo balongolaka na ble oyo bazali kobuka na elanga mpe na vino ya sika oyo ezali kobima na ekamolelo.


Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ