Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu.