Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.
Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani ; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango.
Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. »
Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › »
Bongo Yawe alobaki lisusu na Aron : « Ngai moko napesi yo mokumba ya kobatela makabo oyo babonzeli Ngai. Napesi na yo mpe na bana na yo ya mibali, lokola eteni na bino, makabo nyonso ya bule oyo bana ya Isalaele bapesi Ngai : ezali mobeko ya libela na libela.
Yango wana, tosepela feti, na mapa ya bosembo mpe ya bosolo, mapa oyo ezangi kisi, kasi na kisi ya kala te ya mapa, kisi ya kindoki mpe ya makambo mabe.