Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:14
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bokobanda kozwa likabo oyo ekotikala, oyo ekozika te na moto, mpe bokobanda kolia yango pembeni ya etumbelo ; bokotia yango ezanga levire, pamba te ezali eteni ya bule koleka.


« Tala likabo oyo Aron mpe bana na ye ya mibali bakopesa epai na Yawe, na mokolo oyo bakozwa epakolami : eteni ya zomi ya efa ya farine lokola likabo ya tango nyonso. Na tongo, akopesa eteni moko kati na biteni mibale ; mpe eteni mosusu, na pokwa.


Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango : ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba.


Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.


Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive,


bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ