Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bakotumba yango te na levire : ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto : ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 6:10
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.


Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.


Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule ; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango.


akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango.


Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule.


elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu ; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu. ’


Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule. ’ › »


« Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza.


Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza.


« Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ;


— Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto.


Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye mpo ete alata yango. » Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu.


Bongo moko kati na bampaka atunaki ngai : — Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani mpe bawuti wapi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ