1 Yawe alobaki na Moyize :
Okoyibaka te.
Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.
Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.
Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu.
Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. »
« Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango.
Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.