Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe.


Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.


Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo.


Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo.


Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »


Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ