Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:2 - Mokanda na Bomoi

2 Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Epesaka mosali na Yo mayele ; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.


Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.


Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino.


‘ Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo.


Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.


Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango.


Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo.


Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › »


Mosakoli Aje alobaki : — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? Banganga-Nzambe bazongisaki : — Iyo, ekokoma mbindo.


Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. »


Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo ; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ