Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:19 - Mokanda na Bomoi

19 Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele !


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.


Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama.


Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba.


Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo.


Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ