Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.


Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.


Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; akotombola yango liboso ya Yawe.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.


Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. »


mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ