Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:16 - Mokanda na Bomoi

16 Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:16
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.


Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani.


Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango.


Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.


Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye.


Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.


Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. »


mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.


‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo.


Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe : nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano.


Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe.


Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


Bazongisaki : — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu ; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ