Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 5:11
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.


Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.


Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka.


Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »


Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.


Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.


Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu.


mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.


Akosopa ndambo ya makila na yango pembeni ya etumbelo ; mpe ndambo mosusu, na makolo ya etumbelo : ezali mbeka mpo na masumu.


Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule.


mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje ; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba.


Likabo na ye ezalaki : etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ;


mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Pamba te, kolanda Mibeko, nyonso epetolamaka na makila ; mpe soki makila etangi te, bolimbisi masumu ezali te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ