Levitike 5:1 - Mokanda na Bomoi1 « Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.