8 Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango
Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.
Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’
Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »
Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !