Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 4:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.


Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali : akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele.


‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.


Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › »


Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ