Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 4:35 - Mokanda na Bomoi

35 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 4:35
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › »


Bongo Nganga-Nzambe akosopa, na moto ya moto oyo azali komipetola, mafuta oyo ekotikala na loboko na ye mpo na kosala, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu na ye.


Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako ; mpe ndako yango ekokoma peto. »


Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.


Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama.


Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama.


Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’


Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. »


mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.


‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo.


Moyize alobaki na Aron : « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba ; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. »


Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu.


Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo.


Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.


oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.


Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko.


oyo, kati na Ye, tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akatisa Likolo, Ye Yesu, Mwana na Nzambe, tosimba makasi kondima oyo totatolaka.


Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,


nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.


Yesu atikalaki kosala lisumu ata moko te, mpe monoko na Ye etikalaki koloba lokuta te.


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.


Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ