Levitike 4:31 - Mokanda na Bomoi31 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. »