Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 4:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 4:28
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »


Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola ? Yawe akosala likambo ya sika na mabele : mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »


Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba.


‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.


Soki abonzi mwana meme lokola mbeka mpo na masumu na ye, asengeli komema mwana meme ya mwasi ezanga mbeba.


mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango.


Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ