Levitike 4:27 - Mokanda na Bomoi27 ‘ Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe ; amemi solo ngambo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.