Levitike 4:24 - Mokanda na Bomoi24 Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule ; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe : ezali eloko ya bule koleka.