Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 4:23 - Mokanda na Bomoi

23 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 4:23
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.


Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu ; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali.


Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.


Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani.


Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu.


Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba.


‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu.


Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo.


Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba,


mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.


Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.


Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.


Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.


ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;


ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;


ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;


ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ;


Pamba te likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo ete bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na Ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu, mpo ete akoma likabo mpo na lisumu. Boye, akatelaki masumu etumbu kati na nzoto ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ