Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango.
‘ Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo.
Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.
Kasi kati na eteni ya mibale, kaka mokonzi ya Banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna mbala moko na mobu ; mpe asengeli komema makila ya kobonzela Nzambe, mpo na ye moko mpe mpo na masumu oyo bato basalaki na kozanga koyeba.
Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.