Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 4:17 - Mokanda na Bomoi

17 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 4:17
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akosopa makila yango mbala sambo na nzoto ya moto oyo asengeli kopetolama na maba. Sima na yango, Nganga-Nzambe akotatola ete moto yango akomi peto ; mpe akotika ndeke oyo ya bomoi kopumbwa mpe kokende na zamba.


Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.


Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akomema ndambo ya makila ya ngombe yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango.


Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ