11 Kasi poso ya ngombe ya mobali, mosuni na yango nyonso, moto na yango, makolo na yango, biloko ya kati ;
ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu.
Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango.
ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba.
Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe. ’
Bokopesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari. Bongo ye akomema yango na libanda ya molako epai wapi akokata yango kingo na miso na ye.
Bongo bakotumba ngombe ya mwasi na miso na ye : poso, mosuni, makila mpe biloko ya kati.