8 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu.
Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.