Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 3:6 - Mokanda na Bomoi

6 Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 3:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.


Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.


Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino.


Asengeli te kobonza nyama oyo ezali na mbeba, pamba te ekondimama te.


Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani.


Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.


epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ;


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.


Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,


mpo na kokokisa yango na tango ya suka : kosangisa kati na Klisto bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo mpe oyo ezali na mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ