Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 3:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango ; mpe okotumba yango na etumbelo.


Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.


Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ;


Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana.


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo.


Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati,


Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.


Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango


elongo na bambuma mibale oyo ezalaka na loketo, na mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo ; akolongola bafwa mpe bambuma wana mibale


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.


Moyize azwaki lisusu mafuta nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango, atumbaki yango na etumbelo.


Azwaki biteni oyo ya mafuta : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali.


Atumbaki na etumbelo : mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Bapesaki ye mpe biteni ya mafuta ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali, mokila, mafuta ya biloko ya kati, mafuta ya bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe bafwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ