Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 3:3
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mitema na bango ezali mabanga ; kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo.


Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango ; mpe okotumba yango na etumbelo.


Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi.


Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !


Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »


Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika ; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.


Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.


Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ;


Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo.


Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo.


Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Biteni nyonso ya mafuta ezali ya Yawe.


Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.


ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba.


Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola.


Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Atumbaki na etumbelo : mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.


« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;


Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.


Pamba te toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso lokola esalelo ya lisumu ekufa mpe tozala lisusu bawumbu ya lisumu te.


Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi.


Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka : « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi ; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ