Levitike 3:16 - Mokanda na Bomoi16 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Biteni nyonso ya mafuta ezali ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.