Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 3:15 - Mokanda na Bomoi

15 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 3:15
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe.


Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango ; mpe okotumba yango na etumbelo.


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana.


Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati,


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.


Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.


Bakobonza biteni na yango ya mafuta : mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati,


bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ