14 Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati,
Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati.
Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai ? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?
akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.
bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo.
Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama.
Batiaki biteni yango na batolo ya banyama nyonso mibale mpe Aron atumbaki mafuta na etumbelo.
Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.
alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.