Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 3:13
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango.


Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye,


Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati,


Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.


Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ