32 Eteni nyonso ya zomi ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe ;
Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.
Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.
Napesi lokola libula, epai ya Balevi, biteni nyonso ya zomi oyo ekozwama kati na Isalaele lokola lifuti ya mosala oyo basalaka kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.