Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 27:30 - Mokanda na Bomoi

30 Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali bule mpo na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 27:30
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.


libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »


Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.


Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito : eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te.


Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye.


Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,


Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo : eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta.


apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.


Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye.


Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.


Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »


Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota.


Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ