Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 27:27 - Mokanda na Bomoi

27 Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 27:27
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki nyama oyo alapelaki ndayi ezali mbindo, nyama oyo esengeli te kopesama lokola likabo epai na Yawe, bakomema nyama yango liboso ya Nganga-Nzambe


Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.


Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye.


Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba.


Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama ; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe.


Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango.


Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ