Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe.
Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama.
Kasi osengeli te kosikola mwana liboso ya ngombe, ya meme to ya ntaba, pamba te ezali bule. Okosopa makila na yango na etumbelo mpe okotumba mafuta na yango lokola likabo bazikisa na moto, likabo ya solo kitoko mpo na Yawe.
Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »
Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso.