Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 27:21 - Mokanda na Bomoi

21 Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe : ekozala mabele ya Banganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 27:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu.


Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani ; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango.


Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye.


Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango.


Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama.


Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te.


Soki moto abulisi epai na Yawe elanga oyo asombaki, nzokande ezali mabele ya libota na bango te,


Eloko nyonso, kati na Isalaele, oyo ekokabama epai na Yawe ekozala mpo na yo.


Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.


Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ