20 Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te.
Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama ; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye.
Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe : ekozala mabele ya Banganga-Nzambe.
Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango : mokolo mabele.