Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Levitike 27:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Levitike 27:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joasi alobaki na Banganga-Nzambe : « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe : mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo.


Soki olapi ndayi liboso ya Nzambe, kowumela te mpo na kokokisa yango ; pamba te Nzambe asepelaka na bazoba te ; kokisa ndayi na yo.


Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe : « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. »


‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye.


« Yebisa bana ya Isalaele : Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi


Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo.


Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele :


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ