19 Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama ; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye.
Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama.